Psalms 92

Ezali malamu mpo na kokumisa Yawe

Nzembo mpo na mokolo ya Saba.


1 Ezali malamu kosanzola Yawe ;
mpe kobeta miziki na kombo na ye
Oyo Aleki Likolo,

2 mpo na kosakola bolingo na yo na tongo ;
mpe boyengebene na yo na butu,

3 na miziki ya bansinga zomi,
na gitare, mpe na mongongo ya lindanda.

4 Pamba te osepelisaka ngai na misala na yo, Yawe ;
nazali koyemba na esengo mpo na misala
ya maboko na yo.

5 Tala ndenge nini misala na yo ezali minene, Yawe,
ndenge ezali mozindo makanisi na yo.

6 Moto oyo azanga mayele ayebi te,
oyo azangi mayele akoki kososola te zoba akososola te,

7 Mpo ete ata bato ya mabe bazali kokola
lokola matiti ;
mpe baoyo nyonso basalaka mabe
bazali komona bolamu
bakobebisama libela na libela.
8Kasi yo Yawe, onetolama libela na libela.

9 Ya solo banguna na yo, Yawe,
ya solo banguna na yo bakopanzana ;
baoyo nyonso basalaka mabe bapalangana.

10 Onetoli maseke na ngai lokola oyo ya mpakasa ;
mafuta ya kitoko ekosopanela ngai.

11 Miso na ngai emonaki
kokweya ya bato oyo bayinaka ngai ;
matoyi na ngai eyokaki
lisanga ya bayini na ngai ya mabe.

12 Bato na sembo bakomona bolamu lokola nzete ya mbila ;
bakokola lokola Sedele ya Liban ;

13 balonama na kati ya Ndako ya Yawe,
bakomona bolamu na kati ya lopango ya Nzambe na biso.

14 Bakobota mbuma ata na kimobange ;
bakotikala mobesu mpe na makasa

15 Nakosakola, “Yawe azali alima ;
Ye azali libanga na ngai,
mpe mabe ata moke te ezali kati na ye.”
Copyright information for LinMNB